​​

Statement : | English, Français

Masakoli ma Procureur ya CPI na sima ya mobembo naye na mboka RDC: «Kobundisa kozanga etumbu mpe kopekisa na ntina mbeba oyo ekoki koya sima oyo ezali na nse ya bokonzi ya Statut ya Roma ezali na motuya mpenza mpo ete bato bafanda kimia.»

Procureur wa CPI, Mme Fatou Bensouda, akutanaki na Son Excellence, Mokonzi ya mboka, Joseph Kabila, na bakambi minene ya mbula matali, société civile, CENCO, bantoma ya opposition politique mpe bapanzi sango na mboka République Démocratique ya Congo (RDC)
Procureur wa CPI, Mme Fatou Bensouda, akutanaki na Son Excellence, Mokonzi ya mboka, Joseph Kabila, na bakambi minene ya mbula matali, société civile, CENCO, bantoma ya opposition politique mpe bapanzi sango na mboka République Démocratique ya Congo (RDC)

Nawuti kosilisa mobembo mwa ngai na mboka République Démocratique ya Congo (RDC). Nasololaki masolo ya kobota mbuma malamu na Mokonzi ya mboka, Son Excellence Monsieur Joseph Kabila, na bakonzi ya Congo ya politiki na ya bosembo likolo na makambo ya ntina oyo etali mobulu oyo ezali kosalema na kati ya mboka, ezaleli ya makambo na bosembo awa na mboka, mosala mwa elongo mpe misala ya bureau na ngai. Nasololaki na bantoma ya Conférence Episcopale Nationale du Congo (CENCO), bantoma ya ba partis politiques, ya société civile, ya bapanzi sango, na baninga mosusu, to sololaki na makambo oyo etali RDC na kisala ya bureau na ngai.

Mobembo oyo asalemi mpona kolandela masakoli na ngai ya liboso. Nalobelaka kotungisama na ngai, na oyo etali ezaleli mabe mpe na bileko bya mobulu oyo esalemaki  mingi mingi na Kinshasa, na Beni, na kati ya bituka bya Kasaï mpe na bisika mosusu na kati ya mboka. Nalobelaki mpe makanisi mingi oyo nazali nango tango totali makambo oyo ezalaki kosalema na tango wana, oyo elobamaki ete ekoki kozala mbeba oyo ezali na nse ya bokonzi ya Cour Pénale Internationale (CPI).

Natikalaka koyebisa bakonzi ya mboka Congo mpo ete bazua makoki oyo esengeli mpo ba enquêtes ya solo solo esalema mpo ete mwinda emonana na kati ya mobulu wana mpe kofunda na bosembo bato nyonso oyo bazali na kati ya bosali makambo wana. Wana ezali kasi botali bwa liboso bwa bakonzi ya mboka koluka bilembo ya solo mpo ete mwinda emonana na makambo wana, lolenge elobami na Statut ya Roma oyo mboka RDC etiaka mazanka.

Kobundisa kozanga etumbu  mpe kopekisa  mbeba minene ekoki koya na sima oyo ezali na kati ya Statut ya Roma ya CPI ezali ya motuya mpenza mpo bato bafanda kimia. Esengeli mikano ya solo mizwama na kati ya mboka contre bato oyo bazali kosala mbeba wana oyo ebebisaki kimia. Bobengi bwa ba victimes ebele esengeli boyokama  mpo ete bazua bosembo.

Nasololaki tango molai na bakonzi ya mboka likolo na ezaleli ya mboka na tango oyo, mpe esika boluki bilembo ekomi na bolandi awa na mboka ba oyo bamoni nde bakolo mbeba wana ya bobomi oyo esalemaki na mboka RDC. Mwa mosala mosalemi na bakonzi ya mboka Congo mpona kobundisa kozanga etumbu. Tomonaki yango  ata na kati ya masolo oyo bureau na ngai ezalaka nango tango nyonso na bakonzi ya mboka oyo bazali na makoki. Nazali komipesa longonya mpona makasi wana. Nazali kolendisa bakonzi batia lisusu molende makasi mpo ete bakolo mbeba ya mabe oyo elobami na bisika ebele basamba likolo ya makambo na bango liboso na bazuzi. Bureau na ngai ekokoba kosolola na nzela wana mpona kotala esika nini makambo ekomi, mpe kolendisa makoki mpe misala na kati ya mboka, na bakonzi ya mboka Congo na baninga mosusu oyo bazali kosala mosala mwa ntina, na nzela na mobeko mwa bosungani.

Kobundisa kozanga etumbu ezali mpe kopekisa oyo ekoya sima, oyo ezali mosala monene mwa bosembo. Nazali kobenga ba oyo nyonso bazali kosala mpe baye bazali na kati ya makambo oyo bakoba kosala mpo ete, na tango ya pasi oyo ezali kopesa nzela na bosalemi bwa makama ya mbeba minene, mikano oyo esengeli ezuama mpona kopekisa na lolenge nyonso bosalemi bwa mbeba ya boye. Ezali likonzi lya bato nyonso, mpo ete bosalemi bwa mbeba oyo ezali na kati ya Statut ya Roma ezali na nzela te;  ekoki kondimama te, ata soki ewuti epayi wapi, mpe ata soki esalemi na moto ya lolenge nini. Statut ya Roma ezali polele, mpe ngai lokola Procureur, ezali mosala na ngai kobeta sete polele : Moto nyonso oyo akosala, akotinda, okosengenia akolendisa to akopesa maboko na lolenge nyonso na bosalemi bwa mbeba oyo ezali na nse ya bokonzi ya CPI akoki kafundama.

Awa na mabele ya mboka Congo, nalingi nazongela bobengi na ngai oyo nasalaki na bakonzi mpe na peuple congolais mpo ete basala nyonso mpona kopekisa mpe kokima bizaleli nyonso ya mobulu ya bobimi oyo ezali kopesa mokongo na Statut ya Roma, na esika nyonso mpe na tango nyonso. Esengeli ete eloko nyonso, likambo nyonso ekosalema na etando mobimba ya mboka RDC, ata soki esalemi na moto nini, mpe na ndenge nini, esalema na kokanga motema mpe na motema ya bomoto.

Mosala mwa bureau na ngai na mboka RDC mozali kokoba na bokebi nyonso, tokokoba kolanda na pembeni mpenza lolenge makambo ezali kokende na mboka mpe kosolola na baye banso bazali kosala mosala mwa ntina, na kati na bango tozali na populations civiles, bakonzi ya Congo, bato nyonso oyo bazali na kati mpe société civile. Tozali mpenza kotia molende mpona kopesa maboko ya kosunga mpe kolendisa makasi na makoki mpona kopekisa mobulu ya bobomi mpe tokozela ata moke te kolanda bakolo mobulu oyo ekosalema na mboka RDC na nzela na mobeko mwa bosungani mpe boyokani oyo ezali na kati ya Statut ya Roma.

Wuta kala mboka RDC ezali kopesa lisungi mpe kosala na biso elongo mosala mwa ntina mpenza. Nalingi awa kotonda bakonzi ya Congo mpona lisungi wana mpe mpona kotosa mibeko mpe moboko ya Statut ya Roma oyo batiaka mazanka. Nazali na elikya ya kokoba kotiela bakonzi ya Congo motema na mosala tosalaka elongo na kati ya mboka RDC.

Nalingi mpona kosukisa, kopesa matondo epayi ya bakonzi mpe peuple congolais mpona koyamba biso malamu, mpe koyebisa bango lisusu molende ya bureau na ngai mpona kokoba kosala misala na biso na bokebi na mboka RDC mpona kobundisa kozanga etumbu mpe kopesa bosembo mpona kotia makasi na biso mpona kopesa bosembo na ba victimes.

Bureau ya Procureur ya CPI  esalaka mosala ya kotala liboso, ya koluka bilembo na ya kofunda mpona mbeba ya génocide, mbeba ya bobomi bato ebele na mbeba ya bobomi bato na kati ya bitumba na lipanda lionso mpe kokotela moto moko te. Banda mbula 2003, Bureau ezali kosala mosala mwa koluka bilembo na makambo ebele oyo ezali na nse ya bokonzi ya CPI, lokola na Burundi, na Côte d'Ivoire, na Darfour (Soudan), na Géorgie, na Kenya, na Lybie, na Mali, na Ouganda, na  République Centrafricaine (boluki bilembo na makambo mibale ekeseni) mpe na République Démocratique du Congo. Bazuzi ya esambiselo II ya mosala ya kotala liboso bayebisamaki mpo bapesa nzela na kofungola boluki bilembo na makombo ezali kosalema na mboka République islamique ya Afghanistan oyo Procureur atiaki liboso na bango. Bureau ezali mpe kosala misala ya kotala bilembo liboso na makambo etali mboka Colombie, na Guinée, na Iraq/Royaume-Uni, na Nigéria, na Palestine, na Philippines, na République ya Gabon, na Ukraine mpe na Venezuela.

[email protected]

Source : Office of the Prosecutor